Matondo

Matondo na Yo, Nkolo
Pona bolamu bwa Yo
Ofungoli bikuké bwa Yo
Opesi biso njela ya kokota na ema na Yo
Kosimba motéma na Yo

Biso tobiangamaki té
Tobongamaki pe té
Ngoli na Yo esali kati na biso
Ebuki éfelo ya bokabuani
Epesi biso ebonga
Pembeni ya nkembo na Yo

Nani aza lokola Yo?
Nani akosunga lokola Yo?
Miso etombwami likolo
Tokotatola monene na Yo

Nani aza lokola Yo?
Nani akosunga lokola Yo?
Miso etombwami likolo
Tokotatola monene na Yo

Kombo na Yo Nzambe
Seko na seko okumama
Kombo na Yo Nzambe
Seko na seko okumama

Nzamb'oyo atombolaka
Pe mokili egangi na kokamwa
Afongola njela ya seko
Na matambe na té tozui
Esengo'a kati'a motéma
Lisungi oyo esilaka té

Totomboli maboko
Tosemboli miso likolo
Na ye oyo aleki na nguya
Tobuaka motolé ya kembo
Liboso na Yo, Nzambe
Séko na séko okumama

Nani aza lokola Yo?
Nani akosunga lokola Yo?
Miso etombwami likolo
Tokotatola monene na Yo

Nani aza lokola Yo?
Nani akosunga lokola Yo?
Miso etombwami likolo
Tokotatola monene na Yo

Kombo na Yo Nzambe
Seko na seko okumama
Kombo na Yo Nzambe
Seko na seko okumama

Kombo na Yo Nzambe
Seko na seko okumama



Credits
Writer(s): 0, Katoto Antoine
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link