Ozali nzambe

Nzambe eh ozali Nzambe
Nzambe eh okobonguanaka te
Nzambe na nga Nzambe na ngai,
Nzambe na ngai Yonde bikamua.
Bokono nde eloko nini?
Yonde lobiko ya maladi nionso.
Osilisa ngala ya botutu.
Obotisa ata bikomba.

Loboko oyo elokota ngai, yango pe esokolaka ngayi
Yango pe ebundelaka ngayi.
Eza bikamwa, bongo maloba oyo elakisaka nzela.
Biso tokende wapi? eh toluka nani?
Yango pe epesesaka lobiko, maloba na bomoyi
Totelemi se na yo,
Osala biso bolamu mingi
Tozangi maloba ya koloba
Yamba mitema na biso.
Nzambe na nga
Yonde bikamwa.

Na yembeli yo, na kumisi yo.
Elongo na ngayi, elikia na ngayi.
Tonetoli yo, tosanjoli yo
Oza Nzambe obonguani te
Tobonjeli yo mboka Congo
Zala na biso kino suka.
Toyebi Nzambe mosusu te
Bobele yo nkosi na Yuda
Kumama le lilele eh!
Kumama Nzambe na bomoy
Liboso y'opambola nga Yawhé
Na sengi eloko se moko
Liboso opesa mapamboli
Na sengi eloko moko kumama.
Mosantu na lola, Kumama na kati ya mitema.
S'il te plaît kumama papa.

Nzambe ya motema na ngayi.
Alleluja.
Nkolo ya bomoyi na ngayi okumama
Tokomi lokola Eliya liboso ya ba prophete ya Baal
Tokomi lokola eliya liboso ya baye bayebi ye te.
Nzambe oyo akoyanola na moto
Yende Nzambe ya bomoyi
Nzambe oyo akoyanola na moto
Yende Nzambe ya malonga
Schilo wani eh yo
Eh Nzambi wani loku tosumba ne ba eh
Schilo wani wa moyo
Champion leza
Mukalenga wani leza



Credits
Writer(s): Depaul Mulaja, Isayi-savu Bidensi
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link