Oza Nzambe

To ko sungama na Nkolo Yésu
Soki na yé té, nani mosusu, eh
Toko sungama na mwana Nzambé
Soki na yé té, lakisa nga mosusu

To ko sungama na Nkolo Yésu
Soki na yé té, nani mosusu
Makambu eko simba na nguya na Yésu
Na bonganga té oh, Yésu aza fidèle

To ko sungama na Nkolo Yésu
Soki na yé té, nani mosusu
Elekeli mokili, ngai mwana muké boye
Na sali ya minéné elongo na Yésu

To ko sungama na Nkolo Yésu
Soki na yé té, nani mosusu
Ba pesa nga bilaka, ba kokis'ango jamais
Kasi Yésu na ngai eh, asaleli nga nionso

To ko sungama na Nkolo Yésu
Soki na yé té, nani mosusu
Ata na zangi ba boti, ata na zangi chérie eh
Lisungi na ngai oh, ewutaka na lola, ah ngai eh
To ko sungama na Nkolo Yésu (Ba'o tuna nga na lataka ndéngé nini, na vivr'a ndéngé nini)
Soki na yé té, nani mosusu (L'éternel agit encore)
Yemba y'oza nzambe

Y'oza Nzambe (Jésus)
Y'oza Nzambe (Jésus)
Malamu pona nga
Y'oza Nzambe (Yemba y'oza Nzambe)

Y'oza Nzambe
Y'oza Nzambe (Célébrer L'éternel)
Malamu pona nga
Y'oza Nzambe

Yo muto olembi ko vivre, oyoki posa ya ko kufa
Yésu atindi nga lel'oyo na yebisa yo likambo
Nzamb'oyo abundelaki yo na bitumba elekaki yo na mayele
Alobi aza fidèle, tiela yé kaka motéma, Nzambe

Y'oza Nzambe (Nzambe)
Y'oza Nzambe
Malamu pona nga
Y'oza Nzambe (Yembela yé, elombé mobali eh)

Y'oza Nzambe (likonzi na moto)
Y'oza Nzambe
Malamu pona ngai (alingi ngai mingi)
Y'oza Nzambe

Malamu pona ngai
Y'oza Nzambe
Malamu pona ngai
Y'oza Nzambe (Ba luka nga na butu)
Malamu pona ngai (Yésu elonga eh)
Y'oza Nzambe (Ba tiela nga mitambo eh)
Malamu pona ngai (Yésu elonga eh)

Y'oza Nzambe (Nga natalelaka nani)
Malamu pona ngai (Yésu elonga eh)
Y'oza Nzambe (Nga na yembelaka nanai eh)
Malamu pona ngai (Yésu elonga eh)
Y'oza Nzambe (Afongolala nga Lola eh)
Malamu pona ngai (Yésu elonga eh)
Y'oza Nzambe

Na yebi ndéngé ebandaka
Na yebi pé ndéngé nini esukelaka
Ebandaka baolukela nga ba problèmes
Ebandaka baobundisa nga
Mais esukaka nga ndé na longi
Jésus, Jésus

Yé, yé, Yésu oyo, papa n'elonga
Yé, yé, Yésu oyo, papa n'elonga
Yé, yé, Yésu oyo, moninga malamu
Yé, yé, Yésu oyo, moninga malamu
Yé, yé, Yésu oyo, bolingo 'a bomwana
Yé, yé, Yésu oyo, bolingo 'a bomwana
Yé, yé, Yésu oyo, bolingo 'a bomwana eh
Yé, yé, Yésu oyo, bolingo 'a bomwana
Yé, yé, Yésu oyo, toko suka n'o wapi eh
Yé, yé, Yésu oyo, toko suka na Lola
Ebongo na belelaka

Yaya
Yésu yaya eh (Tambolaka liboso)
Yaya
Yésu yaya eh (Yaya nini atikaka ba leki)
Yaya
Yésu yaya eh (Référence ya famille na biso)
Yaya
Yésu yaya eh (Yaya nga na tiela motéma)
Yaya
Yésu yaya eh

Eh, na luki yo na Siloé, na luki yo na ba veuillé
Na luki na ba ngomba, na luki yo na mayi na miso
Na belelaka

Yaya
Yésu yaya eh (tambolaka liboso)
Yaya
Yésu yaya eh (Yaya nini atikaka ba leki)
Yaya
Yésu yaya eh (Yaya nga na betelaka tolo)
Yaya
Yésu yaya eh (Référence ya famille na biso)
Yaya
Yésu yaya eh (lakisaka exemple)
Yaya
Yésu yaya eh (eh yaya)

Sé yo, sé yo (Yaya)
Sé yo Massiya, sé yo (Yésu yaya eh)
Sé yo, sé yo (Yaya)
Sé yo Massiya, sé yo (Yésu yaya eh)
Sé yo, sé yo (Yaya)
Sé yo Massiya, sé yo (Yésu yaya eh)
Sé yo, sé yo (Yaya)
Sé yo Massiya, sé yo (Yésu yaya eh)

Sé yo, sé yo
Sé yo Massiya, sé yo
Sé yo, sé yo
Sé yo Massiya, sé yo
Sé yo, sé yo
Sé yo Massiya, sé yo
Sé yo, sé yo
Sé yo Massiya, sé yo
Sé yo, sé yo
Sé yo Massiya, sé yo



Credits
Writer(s): Moise Mbiye
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link