Non assistance - Live

Ebembe na nga yang'oyo
Eza nanu kotanga makila
Eza nanu kotanga makila
Olingaka nga?
Olinga nga?
Olinga nga?
Nalingi bino, nalela bino

Yakozwa nga ngo okawusa nga pota
Responsabilité nayo na cas na nga yo moko oyebi
Naza na nga awa sans rancune
Kaka ndambu ya maitrise
Naza na nga awa na regret te yebaka soki demain
Si c'etait à refaire nakolinga yo lisusu kaka

Liwa to pe lobiko
Yo moko okoponela nga
Motema na nga eza pompe ya bolingo no ekokangamaka te
Pinzoli na nga po ekawuka loba liloba se lioko
Mabe oyo osali nga nazui yango neti sacrifice
Peut-etre que ndenge olingaka nalinga yo
Nazangisaki ndambu

Eh nakosamba nani moto eza kotumba nga
Nga moko napelisaki yango na instinct ya pyromanie
Yoboya no nga mbala kama nabondelaka yo kaka
Photocopie ya souffrance eza oyo ya yesu na kuruze
Original chemin de la croix eza oyo po nga nalini yo
Nazo vivre eh, nazo vivre eh

Bandela kosekisa nga
Parle-moi encore d'amour
Bongo ngonga ya liwa na nga
Ami ekoma retardé
Ndoto na nga ata deja kala
Esi ekomaki illusion
Etumba na nga ekotikala
Se conquête ya amour na yo
Po kolinga eya kobongwana koyina
Baninga bakosalaka comment

Bandela kosekisa nga
Parle-moi encore d'amour
Bongo ngonga ya liwa na nga
Ami ekoma retardé
Ndoto na nga ata deja kala
Esi ekomaki illusion
Etumba na nga ekotikala
Se conquête ya amour na yo
Po kolinga eya kobongwana koyina
Baninga bakosalaka comment

Naza na nga na probleme te
Nyonso kaka se yo
Mokolo okolinga'joute nga porte ekozala na ngo
Kombo na nga eza porte
Fungola ekofungolaka nga
Eza na maboko ma yo
Kokweyisa yango te
Mokolo okolinga'joute nga eko zala na ngo un temps eh
Mbala moko oh, un temps kaka
Eh koyeba musala ezalaka elengi moko boye

Eh ima olé, oya mama Lelisa eh mawa
Moto azowa eh
Bolingo obo koya, pourquoi?
Non assistance en personne en danger
Eza punissable epa ya mbula matari eh, nkana

Qui seme le vent na mokili balobaka eh
Récolte la tempête
Nini oyo nga nalonaki eh?
Po lelo naya ko récolter botutu ya bobwana boye

Lelo nandimi bakulaka ndenge balobaka eh
Mwana mokolo oyo okoliya ligorodo eh
Eza te mokolo oyo okobima ah makwanza eh, keba mwana

Kaka bolingo oyo epesaka esengo ngo
Kaka yango eyaka kokomisa moto malheureux
Kaka mabele oyo epesaka ndunda na nguba ngo
Kaka yango eyaka koliya nzoto ya moto, pourquoi?
Kaka loboko oyo ekaresaka na tendresse eh
Kaka yango eyaka lisusu kotiya moto linzaka iwa minisa

Kaka bolingo oyo epsesaka elengi ngo
Kaka yango eyaka lisusu kobota mawa comment?
Namituni

Dédicace

Kaka bolingo oyo epesaka esengo ngo
Kaka yango eyaka kokomisa moto malheureux
Kaka mabele oyo epesaka ndunda na nguba ngo
Kaka yango eyaka koliya nzoto ya moto, pourquoi?
Yeah, merci beaucoup



Credits
Writer(s): Koffi Olomide
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link