Phrase - Live

Rendez-vous prise
Eh rendez-vous à n'est manque le 29 juillet à Olympia

Soki yo te nde l'amour nanga ekoma
ndeti phrase etonda ba faute ebelé
Soki yo te nde l'amour nanga ekoma
Ndeti phrase etonda ba faute ebelé

Ya solo tokomi mosika
Kasi nzela eza nanu molayi
Ngomba moko te ezali
Soki omati omoni l'avenir
Maman ya bana
Po osalaka nga boye ko?
Kosekaka te

Bolingo na biso evandaka
Nango mboka moko te na bolingo
Mwana po ayeba abimi minu
Akomeka koswa libele ya maman
Jamais akosua mosapi naye Rosa
Totika komisua mitema
Bomengo bazela bazua te oh
Ezalaka jamais na rendez-vous

Moto ya bolingo na kombo nayo
Evandaka kati ya motema na nga
Kasi jamais ekozikisa un jour kombo na yo
Maria Rosa nayembi lisusu Bibi
Tokende libala
Malembe malembe maman

Nkasa soki okweyi eh
Na nzete bapesaka faute se na mopepe nandimi mabe nanga

Tosimbi bokoko
Tokitisa mitema
Bomengo ninoso wana
Tosimbi baboko
Tokitisa mitema
Bomengo nionso wana

Mvula epanzaka se ba feti
Kasi wenze te mukarame
Ata bafingi tokota ata na wenze
Tovanda ata naba intempéries
Mvula moke ekokolisela nga
Ya makasi keba Maria Rosa
Ekoboma ndunda na biso

Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala na biso
Rosa tala bango okomona
Elongi ya bolingo na biso
Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala na biso
Julie mukuna eh abota julio na Sona
Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala na biso
Kadiyo maman eh ambre yango ndoyi ya maman oh Nyondo

Soki yo te nde l'amour nanga ekoma
Ndeti phrase etonda ba faute ebelé
Soki yo te nde l'amour nanga ekoma
Ndeti phrase etonda ba faute ebele



Credits
Writer(s): Bidensi Bidiampasi, Wembadio Shungu
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link