Pona Bolamu

Na koki te ko bomba eh
Na koki te ko fanda kimia
Na koki te na zanga maloba eh
Na koki te na kanga munoko

Bolamu ya Nzambe eleki bomoyi na nga na koki te ko bomba eh eh Yaweh
Pona bolamu oyo osali ehhhhhh
Na koki te na fanda kimia
Na koki te na kanga munoko

Bolamu ya Nzambe elekeli nga mosantu, na koki te na zanga maloba
A'kanisaka nga ata na kanisi ye te, Yesu na nga oh naza na talo yaya
Pona bolingo oyo na moni eh
Pona bolamu oyo osali eh

Ba sujets nyonso eza na yango valable soki olingi ko sanjola Nzambe
Basusu ba Sanjola ye po na lipa, basusu ba netola ye po na mbongo
Sujet nyonso eza na yango na tina à condition que ozala mosantu yaya
Po na bolamu oyo osali eh

Po na bolamu oyo osali eh
Nzambe monene lokola yo papa na mokili oyo na moni te
Oh, na kanisi nyonso osaleli nga na zongi pene na yo eh
Ba lobi na nga na binaka lokola

Liboma kasi na yebi sujet ya mabina na nga
Eza bolamu oyo osali eh
Eza bolamu oyo osali eh
Ba kamwe nga ba lobi na banda wapi oh

Ba mituni eza po na nini
Ba yebi te témoignage ya motema makambo eleki meke molimo
Ata moto mosusu ayeba te oh, motema na nga eza témoin yaya
Témoin ya bolamu oyo osali eh

Na za témoin ya bolamu oyo osali eh
Ewuti nga mozindo ya motema eh, ebimi nga kino munoko
Na lingi na kanga kasi na koki te oh, motema na nga esi etondi
Etondi ya nzambe na libota to pe na santé na nga yaya

Na yemba bolamu oyo osali eh
Na yemba bolamu oyo osali eh
Na etonga maboko na nga likolo, molimo na nga esi emati
Pinzoli na miso eza ko tanga eh ba mituni oh pona nini

Na zuwi rétroviseur na tali Kala eh, bolamu nyonso Nzambe asala
Na yembi oh bolamu oyo osali eh
Quand je me souviens je me met à chanter
Bolamu oyo osali eh

A chanter comme un fou pour Jésus
Eloko mosusu te na bomoyi na nga eza na motuya lokola makambo oyo
Oyo masiya asalela nga, oyo elekela nga mabanzo na nga
Yango na pesa wolo to pe palata eh nyonso na pesa soki asengi

Pona bolamu oyo na moni eh
Pona bolamu oyo na moni eh
Yaweh ehhhhhh
Yaweh eh, olongi motema na nga

Olongi oh oh motema
Yaweh ehhhhhh
Yaweh eh, olongi motema na nga
Olongi motema ya mosantu na yo eh

Yaweh ehhhhhh
Yaweh eh, olongi motema na nga
Olongi molimo ya moyengebene
Yaweh ehhhhhh

Yaweh eh, olongi motema na nga
Na komi ko tika kozala nga, no komi ko koma lokola yo, po olongi eh
Yaweh ehhhhhh
Yaweh eh, olongi motema na nga

Moto ya kanda kanda azuwa douceur ya molimo eh po olongi eh masiya oh
Yaweh ehhhhhh
Yaweh eh, olongi motema na nga
Na yemba loyembo epanza na ngomba ngomba Israël oh po olongi eh oh

Yaweh ehhhhhh
Yaweh eh, olongi motema na nga
Makambo yango elekeli kasi na lobi sala ndenge olingi oh oh oh Yaweh
Yaweh ehhhhhh

Yaweh eh, olongi motema na nga
Likambo yango elelisi nga kasi na lobi sala ndenge olingi oh Yaweh eh
Yaweh ehhhhhh
Yaweh eh, olongi motema na nga

Olongi motema ah ya mosantu na yo eh Yaweh oh Yaweh oh
Yaweh ehhhhhh
Yaweh eh, olongi motema na nga
Olongi motema ah na Kati ya motema
Instruments...



Credits
Writer(s): Katoto Luhembe Antoine
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link