Nzambe Kumama Libela

Mosungi na ngai
Mobikisi na ngai
Kumama kumama kumama
na bomoyi na ngai
Yo nde nguya na ngai e
na bitumba na ngai nyonso
Kumama kumama kumama
na bomoyi na ngai, Nzambe e

Opangusi mayi na miso na ngai
Tango likama ezuaki ngai
ya solo, ya solo, ya solo oza nde Bolingo
Okotikaka ngai te
Okolembaka ngai te
ya solo, ya solo, ya solo oza nde Bolingo
Nzambe, kumama libela!

Bolingo na yo ya seko
Bokonzi na yo ekosila te,
Libela libela libela ozali Nzambe
Na bamboka nionso
Pe na mikili nionso
Kumama kumama kumama
po ozali Nzambe
Toyemba!

NZAMBE KUMAMA LIBELA

Elikya na ngai, Se na Yo
Lobiko na ngai, Se na Yo
Elonga na ngai, Se na Yo
Po y'oza Nzambe

ELIKYA NA NGAI, EPAYI NA YO
LOBIKO NA NGAI, EPAYI NA YO
ELONGA NA NGAI, EPAYI NA YO
OZA' NZAMBE

NZAMBE KUMAMA LIBELA



Credits
Writer(s): Serge Olivier Adido
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link