Ozo Sala Kaka

Ozo sala kaka ndengé nazo kanisa
Kasi mingi-mingi ozo lekela mayélé na nga
Ozo sala kaka ndengé nazo kanisa
Kasi mingi-mingi ozo lekela mayélé na nga

Ozo sala kaka ndengé nazo kanisa
Kasi mingi-mingi ozo lekela mayélé na nga
Ozo sala kaka ndengé nazo kanisa
Kasi mingi-mingi ozo lekela mayélé na ngayi eh
Na bolamu ya boyé
Na bolamu ya boyé
Na bolamu ya boyé (oza yo moko eeh)
Na bolamu ya boyé
Na bolamu ya boyé
Eh na bolamu ya boyé (oza mibalé té oh)

Kalenga wa ba moyo Yesu eeh

Eh-le-le-le-le-le le

Matambé ya bolamu na yo eleki minéné
Etongeli bilaka ndako na ba nzela na nga nioso
Matambé ya bolamu na yo eleki minéné
Etongeli bikamua ndako na ba nzela na nga nioso, Yesu eh

Nga na futa niongo ya bolamu ya Nzambé na nini eh (na bolamu ya boyé)
Na futa niongo ya bolamu ya Nzambé na nini (na bolamu ya boyé)
Eh nga na futa niongo ya bolamu ya Nzambé na nini (na bolamu ya boyé)
Nafuta niongo ya bolamu ya Nzambé na nini
Azo balisa, azo botisa na bolamu ya boyé
Azo kangola, azo tombola (na bolamu ya boyé)

Na bolamu ya boyé, na bolamu ya boyé
Na bolamu ya boyé Yesu (oza yo moko eh)
Na bolamu ya boyé, na bolamu ya boyé
Na bolamu ya boyé Yesu (oza mibalé té oh)

Ozo sala kaka ndengé nazo kanisa
Kasi mingi-mingi ozo lekela mayélé na nga

Na bengi yo liziba mozindo
Mayi ya bomoyi, o s'agité
Obomeli nga moto ya kindoki ya libota ngayi
Na bengi yo polé na nga
Oy'a tongo ongali
Okumbi ya nga nionso ya molili ekoti mwinda eeh

Nga na futa niongo ya bolamu ya Nzambé na nini eh (na bolamu ya boyé)
Na futa niongo ya bolamu ya Nzambé na nini eh (na bolamu ya boyé)
Eh nga na futa niongo ya bolamu ya Nzambé na nini (na bolamu ya boyé)
Nafuta niongo ya bolamu ya Nzambé na nini

Ozo sala kaka ndengé nazo kanisa (ndengé nazo kanisa)
Kasi mingi-mingi ozo lekela mayélé na nga (ozo lekela ba calcul na nga)
Ozo sala kaka ndengé nazo kanisa (ndengé nazo kanisa)
Kasi mingi-mingi ozo lekela mayélé na nga

Nanu basala nga bolamu ya boyé té
Nanu basala nga bolamu ya boyé
Mbala liboso na mona bolamu ya boyé (na bolamu ya boyé)
Mbala liboso na mona bolamu ya boyé eyi-eeh (na bolamu ya boyé)
Nga na futa niongo ya bolamu ya Nzambé na nini eh (na bolamu ya boyé)
Na futa niongo ya bolamu ya Nzambé na nini eh (na bolamu ya boyé)

Nzambé na ngayi akeseni na ba nzambé ya mokili oyo (na bolamu ya boyé)
Aza té ndéti nzambé ya Baala, Yaweh (na bolamu ya boyé)
Ako pesa Baala, ako belela Baala tongo, midi pé pokwa Baala ayanola té (na bolamu ya boyé)

Jésus okitisaka moto Yaweh eeeh (na bolamu ya boyé)
Yango na lapi ndayi, vie na nga yo kaka (na bolamu ya boyé)
Nazwi lisolo ya ko betela bana na ngayi (na bolamu ya boyé)

Innocent na ngayi
Yesu osekisi nga na rendez-vous na nga té eh-eh-eh-eh-eh
Na matanga na nga Yesu obetisi nga milolo (oza yo moko eh)

Ozo sala kaka ndengé nazo kanisa
Kasi mingi-mingi ozo lekela mayélé na nga



Credits
Writer(s): Joel Lusilawo
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link