Mosungi na ngai

Na lotaki ndoto opamboli ngai
Naza se kosenga okokisa yango
Bisika nazali yo nd'otinaki ngai
Sala po bamona nazalaka ya yo
Nakomi komona satana na zuwa
Alingi té na koma bisik'ozo mema ngai
Batiaka motéma na mot'oyo aza na nguya
Lekana liboso olongisa biso

Yo mosungi na ngai, loba na nga
Nalingi oyeba nalingaka yo
Zala na ngai, héros na ngai
Kopesa nzela té oh, balonga ngai

Awa na mokili moto suki'apambuami
Balengelaka ye, ba batelaka ye
Ebongo na lola moto soki apesi
Bolenge naye, kosala naye nini?
Naza kaka mwana nionso yanga pamba
Motuya na ngai yo nde okoyeba
Nga nasi na poni nzela ya bomoyi
Mitambo eleki nazangi makasi

Mosungi na ngai, nguba na ngai
Nalingi oyeba nalingaka yo
Zala na ngai, héros na ngai
Kopesa nzela te oh, balonga ngai
Zala na nga, héros na ngai
Kopesa nzela té, oh-oh, balonga ngai

Mosungi na ngai, nguba na ngai
Nalingi'oyeba nalingaka yo
Zalaka na ngai, héros na ngai
Kopesa nzela té oh, balonga ngai

Mosungi na ngai, nguba na ngai
Na lingi'oyeba nalingaka yo
Zalaka na ngai, héros na ngai
Kopesa nzela té, oh balonga eh

Zala na nga eh, naza ya yo
Batela ngai, naza ya yo
Naza ya yo eh, zala na nga eh
Batelanga eh, nalingi yo eh
Nzambe na nga eh, lobela ngai
Zala na nga, yaya

Naza ya yo oh, zala na nga ah
Oh, oh, kopesa nzela té
Oh, balonga nga



Credits
Writer(s): Moise Mbiye
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link