Bambino

Yémei
Ekendeki
Ezongaki
Kasi ekomi té
(Mimi Dispy, hein)

Yoka mwasi, mwasi yokamela ngai
Ya rose oyo ekolisama na eau bénite
Ngai mobali na zalaka na mposa ba linga nga
Nazalaka na mposa ya vrai romance
Lelo ndoto na nga eleki mpongi na molayi eh-eh
Sentiment na yo Bambi, e saouler nga
Maboko mayo eleki berceau, oh
Nazokoka té kolongwa na mpongi eh, problème (Noemie, anh)

Yoka mwasi, Bambi, yokamela ngai
Mwana maman Dje, oyokamela ngai
Akramo Dje, nazalaka na mposa ba linga nga
Nazalaka na mposa ya vrai romance
Lelo ndoto na nga eleki mpongi na molayi, eh-eh
Sentiment na yo Bambi, e saouler nga
Loketo nayo ezanga mokuwa
Ebuki oyo yanga mikuwa moko-moko tii na suka, ah-eh-eh (anh)

Tongo ya lelo, tongo ya mawa eh (ya mawa)
Tongo ya lelo, tongo ya mukuya eh
Tongo ya lelo mwesé eti loboko na litama
Tongo ya lelo, tongo elengi té oh
Ata café eb'o ko yokana na sukali eh, po oza té
Maboko mayo eleki berceau oh
Nazokoka té kolongwa na mpongi eh, zwa n'o nga
(Maman colonel, anh)

Tongo ya lelo ntongo ya mawa eh (mama mia eh)
Tongo ya lelo, tongo ya mukuya eh (mukuya)
Tongo ya lelo ata na Paradis eza ville morte (lelo)
Tongo ya lelo mwesé eti loboko na litama
Tongo ya lelo, tongo elengi te oh
Ata café ebo ko simba sukali eh, po oza té
Loketo nayo ezanga mokuwa
Ebuki oyo yanga mikuwa moko-moko, sans pitié
(Michel Luya, plus d'or du palmarès)

Bambi yaka n'o eh, kata nga pota
Na lembi eyoma, na signer eyoma
Makango ya papa ba bengaka yé maman
Bambi Ngoluka Lobengo, koya té okweyelinga

Caprices des dieux
Canne à sucre, tues-moi ce soir
À toutes les sauces, mange-moi, ah-ah

Pinzoli ekoti likambo yango
Ekomi'o tia nga na maboko ya liwa
Butu nionso etikaka na matama
Na nga, bilembo mibalé oya mpembé
Est-ce que wana eza té nzela na nga ya lilita?
Bambi, loba

Elili na yo, Bambi
Oyo na bombaki na kati ya motéma eh
Yango emati lelo na moto
Ekomi'o tungisa oyo ya nga bongo
Ekoya'o bebisa oya ya ngai paix du cœur
Est-ce que wana eza té commencement ya kilawu?
Bambi, loba

Kombo na yo, Bambi
Oyo na bombaki lokola ekila ah
Yango oyo na nzémbo, lelo nga na yembi eh
Ba kala té na ko koma na ba journaux
Na ba prospectus, na ba panneaux géants
Est-ce que wana eza té nzela na nga ya lilita?
Bambi, loba (tonton Fila, Guy Vanda)

Na lulaki yo eh, Bambino eh-eh
Na miso ya moto alobaka té oh
Na bengaki yo eh, mon amour
Mongongo na nga ya moto oyo amonaka té
Motéma na nga epayi oloni ya yo amour
Ya bébé ayebi sé bolingo ya maman
Oh, Bambino eh, Bambino malelisa issey oh
(George Weah, géant garçon de Tchatcho)

Pé-pé-pé-pé Bambi oh, Bambino
Bambi, nga amour na yo ezingi nga eh
Bambi nga amour na yo ekangi nga eh
Na loti yo na ngambo ya ebalé
Y'olati sé zigida na lokéto
Y'ozo lela ozo benga kombo na ngai eh
Elelo ya mbongé ezipi oyo ya yo eh
Y'ozo luka bwato oya na ngambo epayi nazali, mawa trop

Likolo ya amour na yo (yeh, yeh)
Likolo ya amour na yo (yeh, yeh)
Kaka liwa yeh, yeh
Kaka liwa yeh
Kaka liwa yeh, yeh, yeh, yeh

Na signer eyoma
Na ndimi, nga na jurer
Pona amour na nga Bambi
Pona amour na nga encore
Pona yo Bambino oh
(Coli Vila na Luanda)

Mokolo ya liwa na nga, Bambi otuna té oh
Mokolo ya liwa na nga, Bambi olela té
Ebongaki té ofibisa nga bonbon
Bongo oya ko komisa ngai non partant
Bongo okenda na sima otika nga ah

Y'o tika nga
Chabada-bada-boum-bing, bong-bing
Chabada-bada-boum-bing, bong-bing
Chabada-bada-boum-bing, bong-bing
Chabada-bada-boum-bing, bong-bing-bong

Likolo ya amour na yo (yeh, yeh)
Likolo ya amour na yo (yeh, yeh)
Sé oyo ya Nzambé, sé oyo ya maman Amy
Sé mosala eh

Na signer eyoma
Na ndimi, nga na jurer
Pona amour na nga Bambi
Pona amour na nga encore
Pona yo Bambino oh



Credits
Writer(s): Koffi Olomide
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link