Phrase

Soki yo te nde l'amour nanga ekoma ndeti phrase etonda ba faute ebelé
Soki yo te nde l'amour nanga ekoma ndeti phrase etonda ba faute ebelé

Ya solo tokomi mosika kasi nzela eza nanu molayi
Ngomba moko te ezali soki omati omoni l'avenir

Bolingo na biso evandaka nango mboka moko te na bolingo
Mwana po ayeba abimi minu akomeka koswa libele ya maman
Jamais akoswa mosapi naye Rosa to tika komiswa mitema
Bomengo bazela bazua te oh ezalaka jamais na rendez-vous

Moto ya bolingo na kombo nayo ebandaka kati ya motema nanga
Kasi jamais ekozikisa un jour kombo na yo
Maria Rosa nayembi lisusu Bibi kokende libala ma'
Malembe malembe maman

Nkasi soki okweyi eh
Na nzete bapesaka faute se na mopepe nandimi mabe nanga
Tozingi maboko
Tokitisa mitema
Bomengo nioso wana
Tozingi maboko
Tokitisa mitema
Bomengo nioso wana

Mvula epanzaka se ba feti
Kasi wenze te mukarame
Ata bafingi tokota ata na wenze
Tovanda ata naba intempéries
Mvula moke ekokolisela nga ya makasi keba Maria Rosa ekoboma ndunda nabiso

Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala nabiso
Rosa tala bango okomona
Elongi ya bolingo nabiso
Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala nabiso
Julie Mukuna eh abota Julio na Sona
Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala na biso

Soki yo te nde l'amour nanga ekoma ndeti phrase etonda ba faute ebelé
Soki yo te nde l'amour nanga ekoma ndeti phrase etonda ba faute ebele



Credits
Writer(s): Bidensi Bidiampasi, Wembadio Shungu
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link