Washington

Liboso okende, otika nga eeeh
Cendrillon, ne t'en va pas sans me laisser ta chaussure
Washington Bunci

Washington eeh, tika nga natuna
Washington eeeh, tika nga natuna
Banda Eva aliya mbuma, bolingo ekenda na mboka nini oh
Washington eeh motema na nga o dynamiter
Likonga ya deception epesa maladie sans traitement
Chimiothérapie sans effet
Et ba praticiens sans succès eeh
(Rutha Bola au secours aah)

Julie Ilumbe, diamant ya Anvers eeh

Nga nakomi o mitunaka, soki penza amour ezalaka eeh
Nga nakomi o mitunaka, soki penza amour e existaka

Ko longola Yesu
Ko longola Gandhi (Ah-yiiih)
Ko longola Yesu
Ko longola Sainte Mère Theresa (Aaah)
Po bango nde ba demontra, ba signes ya bolingo

Mabe na nga obimisi na web na internet
Po ba internautes ya mokili ba navigué
Ba mona oyo suka soni eeeh
(Rutha Bola au secours oouuh)

Na chemin de la croix Jésus
Simon de sirene a salisaka yé
Nga natiaki elikya epa na yo
Washington na nga, o komemisa nga kuruzé
Kuruzé ya bolingo
Nzoto ekomi osila ngayi
Lokola mungwa na bileyi
Nzoto ekomi o limwa nga eeh

Mayi ya mvula, eko kweya ka na mabele
Oyo ya bolingo, eko kweya ka na motema
Minzoto elakisa yo bolingo
La lune e memela yo tendresse
Moyi ememela yo, patience na bolingo (Patience na bolingo)
Y'obimi Guillaume le conquérant ya motema na nga eeh
Oyaki lokola sonzo, osali nga mabe
Yahwe na nga
Lembisa motema ya cherie
Po akoka te ko kweyisama na mitambo ya ba mbanda aah, Bunci
Mayi ya mvula, eko kweya ka na mabele (Eko kweyaka na mabele eeh)
Oyo ya bolingo, eko kweya ka na motema (Eko kweyaka na motema aah)
Minzoto elakisa yo bolingo
La lune e memela yo tendresse
Moyi ememela yo, patience na bolingo (Patience na bolingo ooh)
Y'obimi Guillaume le conquérant ya motema na nga eeh
Oyaki lokola sonzo, osali nga mabe Bunci na nga
Lembisa motema ya cherie
Po akoka té ko kweyisama na mitambo ya ba mbanda aah, Bunci

Yo moko olobaki
O komema nga na mokongo eeh
To katisa ebale ti na ngambo esusu
To koma na katikati o bwakisi nga eh
Nakomi o tepa tepa
Sauvetage té eeh
Faute eza ya yo té
Mabe ezali ya ngayi meyi
Il fallait pas na lia dindon na esprit ya soso

Yo'koki oyeba soki oza première amour ya moto eh
Kasi garantie e kozalaka té Washington
Que okoya kozala dernière amour ya vie na ye ooh
Awa pe ko echographie ya sentiment ezalaka té
Verité ya motema ya moto na maboko ya nzambe
To tikaka kolota koleka molayi ya mpongi eeh

Nakomi convaincu que ozali mosantu eh
Mpo tongo nyonso inventaire sé ya mabe na ngayi
Oyo osali nga lelo, nandimi Kaps Kapangala
Que Yesu abotama na ye vraiment na ndeko té eeh
Yozalaki o loba que ozali sœur en Christ
Verité ebimi lelo, y'ozalaki nayo sœur en crise

Na tangi soyi, monoko ya kizengi eeh
Kombo na nga oteki ango, na wenze ya bitula
Ba kakoli nga koleka ata tombola
Y'oteki nga prix mangondo, na zando oyo ya pokwa eeh
Na komi o tambola à zero mètre na liwa aah eh
Yokomisi nga cherie, vraiment kota pona eeh Washington Bunci

Eh Mulopwe Gabin Tshiteya
Billie Tezo, AD Dayoni
Bo tunela nga Washington
Moto mususu oko mona mokolo
Mosusu pe, oko mona mokolé
Mais mosusu pe omona pena mokoli, mais a mipesi na bolingo
Yo moko ozwi numero na yo, opesi yé
Na benga, répondeur
Na benga, répondeur
Mais changer kaka numero

Liboso okende eeh, otika nga
Liboso okende eeh, otika nga eeh
Lakisa nga mboka oyo, ebomba sekele ya liwa
Lukela nga libongo oyo, motema na nga e kosema
Po assurance ya vie na nga
Ezwa ata merite ya bolingo na pesaki yo Washington Bunci

Il y a des jours comme çà
La first Lady Edith Lucie Tito
Mopao veux dire Moto na kati ya bato
Savez-vous que si tout le monde savait ce que tout le monde dit sur tout le monde
Personne ne parlerai à personne

Liboso okende eeh, otika nga (Laurent Lorenzo)
Liboso okende eeh, otika nga eeh (Simon Mbongo)
Lakisa nga mboka oyo, ebomba sekele ya liwa (Alain Baraccuda)
Lukela nga libongo oyo, motema na nga e kosema
Po assurance ya vie na yo
Ezwa ata merite ya bolingo, na pesaki yo Washington Bunci

Washington okomi o barrer no nga eeh
Washington okomi o martyriser nga aah (Ngayi iiih)
Washington ozongisa film sima aah (Ngayi iiih)
Washington temoin na nga Rutha Bola
Washington okomi ko achevée non nga eeh
Washington Bunci mama, hum koboya té

Lobi nayaki na tongo kobondela yo
Y'otindi baleki baloba y'ozali té oh
Boni oko nyokolo mwana moninga boye

Washington okomi o barrer no nga eh
Washington okomi o martyriser nga
Washington ozongisa film sima
Washington temoin na nga Rutha Bola
Washington okomi ko achever non nga eeh
Washington Bunci mamna, hmmm koboya té

Liboso okende eeh, otika nga
Liboso okende eeh, otika nga eeh
Lakisa nga mboka oyo, ebomba sekele ya liwa
Lukela nga libongo oyo, motema na nga e kosema
Po assurance ya vie na nga
Ezwa ata merite ya bolingo na pesaki yo Washington Bunci

Washington okomi o barrer no nga eeh
Washington okomi o martyriser nga aah
Washington ozongisa film sima aah
Washington temoin na nga Rutha Bola



Credits
Writer(s): Koffi Olomide
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link