Amen Amen

Uta ngai nakoma ko sambela, uta nga nakoma moklistu
Kimia na motéma
Bomoyi e changer, nakoma kotalela kaka Masiya
Na kombo na Yesu
Natika misala ya mabé, na kombo na Yesu
Nakoma moto ya ko banga masumu, na kombo na Yesu
Kimia na motéma, ah-ah

Uta nga natika masumu, uta nga na kangama na Nzambe
Kimia na motéma
Na kolemba té, elykia na nga sé na Yesu muana na Nzambe
Na kombo na Yesu
Milimo ya mbido mi ko kima, na kombo na Yesu
Moto ya lola mo ko kita, na kombo na Yesu
Kimia na motéma, ah-ah

Yesu kimia ya bana Nzambe, Nkolo totielaka motéma
Oh, yé to sanjolaka
Liloba na Nzambé, yé ndé apesaka bomoyi ya seko
Oh, mokonzi ya eclésia
Makasi na nga mowumbu na yé
Lolendo na nga
Apesa nga ngolu ya ko yeba Nzambe pé kosala yé, oh-oh
Na kimia na motéma, ah-ah

Yesu elonga na nga mosantu, likonzi ya bomoyi na nga
Ah, yé nako yembela
Moyi ya bosembo, nionso asalaka yango nd'esengeli
Na kombo na Yesu
Nakoma mosantu ya Nzambe
Elombé ya bwania, maloba na yé ndé ebongi to yoka
Na kombo na Yesu, uh
Kimia na motéma, ah-ah

Yesu nguya na nga moklisto, nsomi ya bokonzi na Nzambe
Oh, yé nako kumisa
Lipa na bomoyi, andima ko kufa likolo na nga
Muninga malamu
Nakoma efandelo na yé, lisolo ya motéma
Atondisa nkémbo ya Nzambe na bomoyi na nga, libanga ya motuya
Kimia na motéma, ah-ah

Kimia na motéma na nga (kimia na motéma)
Kimia na motéma na nga (kimia na motéma)
Yesu nsomi na lola, likonzi na moto (kimia na motéma)
Engambé mobali, moninga malamu (kimia na motéma)
Na kombo na Yesu, nakoma ya Nzambe (kimia na motéma)
Yesu apetola nga nakoma ndé mosantu (kimia na motéma)
Oh, kimia na motéma na nga (kimia na motéma)
Oh, kimia na motéma na nga (kimia na motéma)

Ata mokili etelemi, éboyi kokéndé ekomi na suka, oh
Nayebi Nkolo ozali ebombamelo na nga mosantu
Po été nionso ezali, ezalisami kaka na yo, eh
Mokéli na ko kamwa, nionso esimbami na yo

Nkolo, elonga na nga eza na yo, eh
Yesu, na yo ndé nabengi Nzambe tata
Yo ndé mobateli ba mpaté ya Nzambe
Yesu, na yo ndé na bengami mosantu
Nkolo lobiko ya bayé bako ganga
Yesu, na yo ndé na bengami mokitani ya Nzambe na bomoyi
Mosungi na nga azali kosala, na banga nini? Oh
Azali kosala, na banga nini? Oh

Ata makasi esili ngai po été nzela etondi minioko
Nkolo, yo oko pesa nga loboko nga nasimba tokéndé
Mosala oyo y'obandi okomisaka kino na suka
Mosungi na nga azali na nguya yako komisa nga

Nkolo atelemi ndé na nkémbo, bikelamu binso bifukama
Masiya na nga eza na bomoyi, nga na ningana tina nini?
Ata mabélé efongwami, bipayi na telemi na banga té, oh
Oyo asimbi nga aza kakasi, kombo na yé Yesu Klistu
Ata mokili eboyi ko ndima, o'yé alobi ndé yango
Eko salema po na nga
Mosungi na nga azali kosala, na banga nini? Oh
Azali kosala na banga nini? Oh

Nkolo (Nkolo)
Elonga na nga eza na yo, eh
Yesu
Na yo ndé nabengi Nzambe tata
Yo ndé (yo ndé eh)
Mobateli ba mpaté ya Nzambe
Yesu (Yésu)
Na yo ndé na bengami mosantu
Nkolo (Nkolo eh)
Lobiko ya bayé bako ganga (ah-ah-ah)
Yesu
Na yo ndé na bengami mokitani ya Nzambe na bomoyi
Mosungi na nga azali kosala, na banga nini? Oh
Azali kosala, na banga nini? Oh

Mosungi na nga azali kosala na banga nini?
Mosungi na nga azali kosala na banga nini?
Ata mokili ekomi moto, na lenga nini?
Azali kosala, na banga nini?
Ata somo ezwi maloba ngai nako kima té
Mosungi na nga azali kosala na banga nini?
Yé mosungi na ngai azali ko sala na lenga Nini?
Azali kosala na banga nini?)
Yé mosungi na nga azali ko sala, kimia na mboka oyo
Mosungi na nga azali kosala, na banga nini?

Credits
Writer(s): 0, Katoto Antoine
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link