Embargo

Nid d'amour, lit d'amour
Ne deviens pas mon lit de mort
Eza opération ya motema
Sala yango na ndenge ya ba grand peintre, cicatrice emonana té
Bolingo ekomi kotambwisa nga lokola cheval, mowumbu kaka te
Modogo Botekola, pesa nga raison

Epayi na nga je t'aime, epayi na ye mpe je t'aime
Finalement est-ce que okomi kosala tourisme ya ba je t'aime
Litama opesaki nga baiser ekomi nausée
Miso elulaki nga lelo ekomi kolula mbanda
Y'obengaka bébé, ye mpe lisusu bébé
Nani mwinda mpe nani elili é-eh
Ayé, bolingo ya lokuta condamnable

Stylo moko texte moko o changer kaka écriture
Est-ce-que oyo eza te oyo babengaka escroquerie
Nabanzaki lokola o tié nga embargo na motema
Nakokufa lokola nakufi te gloire à Dieu

Thermomètre e indicaki lobi amour quarante degré
Lelo epesi température y'amour douze degré
Maladie oyo bazwela kisi kutu ebomaka ngo ya
Bongo maladie y'amour nakobika comment
Souffrance ekomi résidente, permanente na motema he

Hee moto nalingi alingi nayé ngayi te oh
Ye pe epayi akeyi kolinga bazolinga ye te
A préféré asamba na tribunal oyo accusé pe plaignant kaka nse ye mei
Baninga tokeba bolingo ezali médicament
Kasi médicament avec ba contre-indication
Soki o souhaité ye bonne appétit keba akodundana yo mei
Soki opesi au revoir akoyoka adieu
Soki o souhaité ye bon sommeil kebaka moninga akoya kozongisela yo repose en paix

Motema oyo ekomaki lipasa n'oyo ya ngayi mei
Soki elingi caresse par télépathie nazalaki ko yeba
Soki elingi tendresse ezalaki servie à volonté
Nani à détourné lelo motema na lipasa

Soso ata a moni ba mpese kama pembeni ya kombekombe
Akobanga he ngayi mpe nabangi vie na ngayi

Maboko na yo eza na makila ya bolingo na ngayi

Epayi na nga je t'aime, epayi na ye pe je t'aime
Finalement est-ce-que okomi kosala collection ya ba je t'aime
Litama opesaki nga baiser ekomi nausée
Miso elulaki nga lelo ekomi kolula mbanda
Y'obengaka bébé, ye mpe lisusu bébé
Est-ce-que nini osalaka nga osalaka mpe ye te?

Oloba nga naloba

Lelo nandimi maloba ya moto ezalaka stylo
Ekomaka oui, ekomaka non sa dépend
Likonga ya montre na yo etelemi na onze heures
Na douze heures nazakolela ngonga eleli
Pile esili nto nini bolingo e traîné he
John Psu yo-yo-yo yo-yo-yo

John Pasu moto ya bandoki bitumba esili tobongisa he
Bandoki yo osimbi nga arme na nga maloba he
Boma soki okoboma nzoto tikela nga molimo
Nzambe akozongisa yo mokolo ya suka John Pasu linga no nga

Y'oweli vilain na bombe nga moto ya malueke
Ngoumba, diamant na wolo nioso kaka nse ba sous sol
Nakosenga au sécour ONU a tinda ba casques bleu
Mpo ba sauvé bolingo

Motema epusa mpe etangisi makila he
Opération te mbeli ya monganga té
Soki batuni nga nakoloba nini eh
Bati nga te mbeli kasi nazo saignée
John Pasu pona yo eh, John Pasu assassiné ngayi eh

Police emmène moi mon amour
Marabout envouté bien aimé
Mandona na bimisela nga ye na butu
Kisi ya bolingo nse bolingo magie te oh
Nakosuka wapi John Pasu fatigué oo
John Pasu yo-yo-yo, John Pasu ngayi awa matanga

Yo-yo-yo, ngaï awa matanga eh
Yo-yo-yo ngaï awa matanga eh
Yo-yo-yo



Credits
Writer(s): Koffi Olomide
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link