Myriam moleka

Tu as bien aimé cette chanson? Tu risques d'aussi aimer
Myriam, Il était une fois, Bijou, Timothée; t'en souvient-il?

Tongo etani eh tongo ya mawa moyi ebo kobima.
To tie loboko na litama mwesi ekangi elongi eeh mboka mobimba mawa

Sango ewuti mosika mbeli ya monganga ezangisi biso moto Myriam moleka
moto tolinga ah .
Eh Timothe elongi na se nani alakisa ye
ndenge ba lelaka moto oyo balingaki trop oh

Liwa osali mabe liwa osali biso mabe
famille moleka nionso mawa mawa mawa

Nzambe ndengi nini yango osala moto na
motema na yo pene kasi na na miso oko mona ye teee?

Tous les diamants sont eternels Myriam mpe
oza immortelle ma bijoux ya papa eh moleka

Ata okeyi mayi ya miso tina te etanga myriam avait le cœur si grand
que akumba biso na kati surement.
A peine y'okeyi myriam deja osi ozongi
car maman asi aboti mwana photocopie na yo

Yahwe eeh yahwe eeh myriam ye wana, moziki ya santa maria

Myriama oh myriama eh timothee na sima
atambolaka lokola moto akatani makolo mpo azangi yo eeh

Nani hi nani hi nga naza kotuna akita na myriam ateya biso boboto

Myriam bijoux nga kombo na ngai moto ya tshatsho nzembo ya mawa mpo
na kaboli mawa ya timothee atambolaka na yango lokola attaché-case a
lobi na nga o banzaka sekele ya yo na papa
moleka moto a bengaka marachette timothee na biso mawa

Myriama ah myriama oh yahwe ye wana
Myriama ya maman bolingo eh
Myriama ya maman motema eh
Myriama ya maman bijoux
Myriama moziki santa maria
Myriama okomi cherie ya nzambe

Tous les diamants sont eternels myriam
yango oza immortelle ma bijoux ya papa moleka

Myriama ya maman mabanzo
Timothe na yo a komi kolela
Myriama ya maman motema eh

Yahwe eeh yahwe eeh myriama ye wana

Myriama ya maman mabanzo
Myriama ya maman okokufa te
Myriama ya maman motema eh

Ange gardien to tandi maboko donne-nous encore un peu de toi
Myriama ya maman okokufa te
Myriam maman ozali immortelle



Credits
Writer(s): Koffi Olomide
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link