Sixième chantier

Ntaba soki azo lela mongongo ya makasi
Na butu jamais akoki olala libanda
Yoka kolela na nga ata na litoyi moko
Oh oooh Lorenzo

Eeh basi mibale na zemi
Jamais moko akoki kosenga na moninga
Amema ye na mokongo
Kolota yo ekoma chaine préférée na nga ya télévision Laurent Lorenzo

Pasi ya sango, esengo ya Pape (eh)

Nyama mokila molayi a pimbwaka mosika te eeh
Sainte Maria alelaki trop jour ya liwa ya Yesu
Et pourtant ayebaki bien que wana muana Nzambe

Mayi ya miso na nga etondisi molangi ya champagne matuzalem
Na mokolo moko ooh, pona kolela yo Laurent Lorenzo
Likelele afutaka mpaku te na l'etat aaah yeh
Kasi avandaka naye pause na lidusu na ye
Pourquoi ngayi te
Souviens-toi de moi Laurent Lorenzo ooh (ooh oooh)

Laurent o promettaki nga y'okozala carte prépayée na nga
Oko bakisela nga compte sim ya love eeh bolingo eh
Nzok'ezalaki n'ango promesse ya fonctionnaire oyo a assurer moto
Abosanaki que salaire na ye ekoma ya niongo
Ah yeeeeh
Sixième chantier ekoti na b'amoureux
Bolingo ya tombola na lata te eeh pardon
Parfum nini yango eyebana koleka
Amour ya mbeto na nga ebimisi plaisir libanda
Wenze nini y'oteki (sentiment na nga eeh)
Zando nini y'odefisi (bilengi na nga eeh)
Madusu ya ndako ebo kokotisa lumiere na mona tongo
Bolingo emelisi nga café ya matanga ba tia bangi eeh
Œuvre d'art ekoti Gambela
Ezangi musée eeh pasi eeeh

Ntaba soki azo lela mongongo makasi
Na butu jamais akoki olala libanda
Yoka kolela na nga ata na litoyi moko
Oh oooh Lorenzo

Maloba na yo sukali lokola osalaki propagande ya election ya satan
Betela tolo na moto akabelaka yo libanki
Kasi oyo alakaka yo te elephant
Cordonnier abongi selaka bato ba chaussures
Kasi ya yemoko, mokoto ebula phase
Kunda-ebembe ezalaka nango na receveur te
Kasi moto nionso tout ayebi destination n'ango

Kukulu elombe lelo elali epayi na nga butu pe

Kukulu elombe lelo elali epa na nga tongo sa

Couleur ya douceur ezalaki bonheur
Ebongwani malheur
Nakomi sans valeur
Lorenzo ba promesses
Nioso oyo ya tendresse, ebongwani détresse
Ozalaki na nga richesse
Napesaki yo confiance ndenge, ndeke apesaka na nzete
Atikeli ye zala ayebi que akoya kokuta yango eeh

Nzela ya bolingo ekomi ozengana
Ata lifelo etonda esika ya satana eza réservé
Est-ce-que esika n'anga na motema na yo obombaki
Nakomi koyetola moto et pourtant navandaka pembeni ya volcan ngo ooh

Nzela ya bolingo ekomi ozengana
Ata pe lola etonda esika ya Yezu eza réservé
Est-ce-que esika na nga na motema na yo obombaki
Nakomi kokelela mayi
Et pourtant navandaka pembeni ya ebale ngo ooh

Mfumu Yesu ayebisaki moyibi na croix
Kaka lelo tokozala n'o na paradis
Ya nga bolingo ekomi nde nazelaka
Lelo lobi tout le temps ba contretemps
Ba ninga na ba love nga mansanga eeh
Ba ninga na ba ntiya nga kolela (ayeh eeeh)

Est-ce-que ovandaka pe tango mosusu
Okanisa moninga otika ye moko na mboka bisengo eeh
Na ndako na ye Laurent mawa ekomi mokonzi
Se po abungisa oya ye fungola ya bonheur oyo

Mbisi alandaka se esika mayi eko tiolaka Laurent
Soucis elandi oyo ya nga sourire, pe e supprimé oyo ya nga la joie
Nasali comptabilité y'amour, bilan inferieur à zero
Motema ezui pension décompte finale te, natikali gbetere

Yebisa nga bébé sur quel critère o se baser
Po osala nga wayo damnatio memoriae aye
Obuaki nioso lokola feticheur oyo a se convertir na christianisme
Nioso asalaki ekomi le passer
Nayebi Laurent nzoto na nga biloko ya mokili eh
Kasi pema elula kozonga epayi ewuta
Yebisa nga Laurent mokolo nini y'okozongela nga
P'obuka monument ya soucis oyo otika na vie na ngayi eh

Nakomi olela bolingo neti kaka ebembe
Jesus alelaki Lazare kasi azalaki capable ya ko sekwisa ye
Nazangi nguya na ressusciter amour ya yo na nga
Esili lokola sentiment ya libele ya mama na monoko ya bébé
Awa okomi séronégatif ya bolingo ya yo na nga
Nga naza toujours atteint
Comprimer yango nini omeli, ebomi virus ya bolingo eh

Nzela ya bolingo ekomi ozengana
Ata lifelo etonda esika ya satana eza réservé
Est-ce-que esika n'anga na motema na yo obombaki
Nakomi koyetola moto et pourtant navandaka pembeni ya volcan ngo ooh

Nzela ya bolingo ekomi ozengana
Ata pe lola etonda esika ya Yezu eza réservé
Est-ce-que esika na nga na motema na yo obombaki
Nakomi kokelela mayi
Et pourtant navandaka pembeni ya ebale ngo ooh

Mfumu Yesu ayebisaki moyibi na croix
Kaka lelo tokozala n'o na paradis
Ya nga bolingo ekomi nde nazelaka
Lelo lobi tout le temps ba contretemps
Ba ninga na ba love nga mansanga eeh
Ba ninga na ba ntiya nga kolela (ayeh eeeh)

Tata mwasi awuti na mboka ayoki nga nawe eh
Balobi na ye na frauder na corbillard
Fungola sanduku soki okomona ebembe na nga te
Ata ko oko bunga elongi po na kufi na soucis
Manzaka temoigner que ezali nga eeh eh, eeeh eh

Tata mwasi awuti na mboka ayoki nga nawe eh
Balobi na ye na frauder na corbillard
Fungola sanduku soki okomona ebembe na nga te
Ata ko oko bunga elongi po na kufi na soucis
Manzaka temoigner que ezali nga eeh eh, eeeh eh

Cercueil moto asala yo, ateka yo
Moto asombi yo, asaleli yo te
Nga pe moto nasaleli yo oh
Namoni yo te (eeeeh)

We mie mimi we eeeh
We mie mimi we eeeh

Mimi e olingi nga nakufa oh oh
Cindy alingi nga na bela woh woh
Mimie obaki nga nalimbe oh oh
Mimie obaki nga kuruze oh oh
Bolingo ebeti nga kibota oh oh
Kibota ebimisi kivimba oh oh
Kivimba esali nga tofina oh oh
Tofina ememi nga na kunda woh who

Tata mwasi awuti na mboka ayoki nga nawe eh
Balobi na ye na frauder na corbillard
Fungola sanduku soki okomona ebembe na nga te
Ata ko oko bunga elongi po na kufi na soucis
Manzaka temoigner que ezali nga
Mopao eh, eeeh eh

Cercueil moto asala yo, ateka yo
Moto asombi yo, asaleli yo te
Nga pe moto nasaleli yo oh
Namoni yo te (eeeeh)

We mie mimi we eeeh
We mie mimi we eeeh

Mimie obaki nga nalimbe oh oh
Mimi e olingi nga nakufa oh oh
Bolingo ebeti nga kibota oh oh
Kibota ebimisi kivimba oh oh
Kivimba esali nga tofina oh oh
Tofina ememi nga na kunda woh who

Mimie eh
Mimie eh
Hmm Mimie eh

We mie mimi we eeeh
We mie mimi we eeeh

Mimie obaki nga nalimbe oh oh
Mimie obaki nga nalimbe oh oh
Mimie obeti nga kibota oh oh
Kibota ebimisi kivimba oh oh
Tata mwasi awuti na mboka ayoki nga nawe eh
Balobi na ye na frauder na corbillard



Credits
Writer(s): Koffi Olomide
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link