Ozali nzambe

Ozali oyo
To pona ko yemba, Yahweh
Lokola yo mokonzi
Amonani té oh
Ba oyo nionso
Ba kutana na Yo
Ba zonga na loyémbo
Ya litatoli eh
Okutana n'Abrahama
O pesa yé Izaka
Ekomi tango ya Ana
O pesi yé Samuel eh, kumama Yahweh

Ozali Nzambe (loyembo 'ango)
Mokéli na mokili oyo (ba yembela yo, ya litatoli)
Mabota nionso (Schilo)
Ekumisa yo mosántu (yo ndé Nzambe)
Ozali Nzambe
Mokéli na mokili oyo
Ndima loyémbo
Emata na ngwéndé na yo

Loboko na yo
Elekí na nguya
Makasi na yo, Nkolo
To mona yango eh
Okota na lilita
Mikolo misatu, osekwa pé na kembo
Na loboko ya tata
Obimi molobeli na nga eh
Yango na lobi
Zua n'o lokumu
Seko na seko, yaweh
To ko yemba sé yo, kumama mosántu

Ozali Nzambe (Nzambe)
Mokéli na mokéli oyo (na mokili oyo)
Mabota nionso (Yahweh)
Ekumisa yo mosantu (ozali Nzambe)
Ozali nzambe (Nkolo)
Mokéli na mokili oyo (Yahweh)
Ndima loyembo (ndima yango)
Emata na ngwéndé na yo eh (na ngwéndé na yo)

Ozali Nzambe, Nzambe na nga
Ozali Nzambe, Nzambe na nguya
Ozali Nzambe, oza Nzambe na nga
Ozali Nzambe, oza Nzambe na nguya

Nioka motako to netoli yo likonzi na moto
Otika lola o ndima okufela nga, Masiya
Ofuti niongo ya masumu na nga, na ekulusu
Yango loyémbo emati leló na ngwéndé na yo eh

Ozali Nzambe, Nzambe na ngai (nkolo, ozali Nzambe)
Nzambe na nguya (Nzamb'a ko yembela nzémbo)
Oza Nzambe na nga (Yahweh, ozali Nzambe)
Oza Nzambe na nguya (Nzamb'a ko betela maboko)
Nzambe na nga (nani a kokani na yo)
Nzambe na nguya (bitamba' ngo olonga déjà)
Oza Nzambe na nga (elonga pe opesa déjà, Yahweh)
Oza Nzambe na nguya (boya to yemba nzembo)
Nzambe na nga (nzembo ya bolingo' a Masiya)
Nzambe na nguya (yamba loyembo 'a motéma)
Oza Nzambe na nga (oza Nzambe)
Oza Nzambe na nguya (nkolo, oza Nzambe)

Oza Nzambe, elombé oza Nzambe
Oza Nzambe
Schilo eh, Schilo eh, ozali Nzambe
Schilo eh, Schilo eh, ozali Nzambe
Likolo na sé ezali ya Yo
Yahweh, ozali Nzambe



Credits
Writer(s): Depaul Mulaja, Isayi-savu Bidensi
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link