Mario

Oh Mario
Luka ata mwasi yo moko obala
Mario mosala kolinga ba maman mobokoli
Basuka yo te? Ah!
Lelo makambo lobi makambo nalembiye e
Lelo bitumba lobi koswanae nabaye e
Naboyi kobebisa nzoto na manzaka nalembiye eh
Mario nalembiye e e
Mario nabaye e e

Oh Mario nasi napekisa yo
Kolingaka basi bazali na mbongo
Yoka ndenge azali kokaba yo na mitema ya basi mpe mibali
Yo moto ozali na ba diplôme Mitano Mario

Sala quand même effort oluka mosala Mario
Ponanini oza ko bebisa
Ko sambwuisa kombo na yo boye Mario ah na lembi

Ba produits ngai napokaolaka nzoto ekoma sembe sembe

Okobeteke ngai na zoka lobi na zwa maladie ya cancer
Lobi tango na kopolo yo okimi ngai
Eh, Mario na bayee e, Mario na lembiee e

Ba famille ya Mario bakanisaka Mario apesaka nga mosolo nzoka nde moto
Nalalisaka ye, naleisaka ye, na lalisaka
Mario na lembieee

Bima bima na ndako na ngai Mario
Mpo na nini niongo ya kolinga
Akobeteke ngai na zwa epayi zuwa ya lokuta epayi

Zuwa ya biloko akutaki ngai na yango
Likambo mosusu mosala koboma biloko ya ndako na somba

Nalembi eh Mario na baye yo
Kende Mario nalembi yo oh
Mario okuti ngai na biloko mobali mosusu asomba

Oyoka elengi ya kovanda te Mario?
Oyoka elengi te olia na mesa?
Kaka soki zuwa ekangi yo na poitrine
Olingi kaka kobeta ngai na koboma biloko
Mario si na salisa yo mingi
Diplôme ya sima ngai na salisaki yo Mario
Bongo leleo ngai nakomi mwasi mabe?
Mario likambo te
Ah mokili eza kaka boye hum

Mobali akuti ngai na bomemgo
Asengi akomander ngai na ndimi
Mobali akuti ngai na bomengo
Asengi adiriger ngai na ndimi
Nabandi kobima na ye babandi kobenga ye Monsieur
Mario avimbi moto akanisi biloko na ngai ya ye ah!
Ah Mario na baye yo o
Kende Mario nalembi yo oo

Mario azongi epayi ya baboti
Akuti mbeto na ye ya bomwana
Ekomi tango ya kolala mbeto mokuse makolo milayi Mario
Mario nalembi somba mbeto na baye e
Koyokamotema pasi te ndako ngai moko nafutaka
Bilamba nasombela yo natikeli yo souvenir ya bolingo
Oyo ezali na lavage nakotindela yo na bato
Mario nalembi yo oh
Kende na yo na baye yo oh



Credits
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link