Les prisonniers dorment

Ba lali eh
Ba lali mama bato ya boloko nionso tout ba lali et pourtant butu nanu ekufi té, complètement
Ba lali eh, mama
Ba lali mama bato ya boloko nionso tout ba lali et pourtant butu nanu ekufi té, totalement
Balalaka té
Ba lalaka té, ba esclaves ya bolingo pourtant minuit elekaki kala, pongi eza kaka koya té
Oh amour po été oy'a lelo
Hum to lalaka té
Tolalaka té biso ba, bahumbu ya bolingo pourtant minuit elekaki kala molimo ezangi la paix
Oh amour tinda ata messager

Banda o kenda Amy
Makambo na nga ebeba
Etoile na nga e ternir
Il faut kaka olinga nga (olinga nga)
Il faut kaka ozonga (ozonga Aimée)
Na bolingo balimbisanaka
Na bolingo bayokanaka

Matanga yeh, mama
Matanga oy'a bolingo ata quarantième jour ekoki, ekosilaka té
Na bolingo ebongi ozala na konzo, na chance mingi
Eh tango eza nanu
C'est pas trop tard, bolingo, kolinga té y'ozala munganga na nga après ma mort
Oh amour yaka kobikisa nga

Banda okenda Amy
Makambo na nga ebeba
Etoile na nga e ternir
Il faut kaka olinga nga (olinga nga)
Il faut kaka ozonga (ozonga Aimée)
Na bolingo balimbisanaka
Na bolingo bayokanaka

Nga natiaki bolingo na nga na kati ya sani etoboka
Etikali kosopana oh, nga nazangi mon trésor eh,-eh ngai
Natiaki bolingo na nga na kati ya sani etoboka
etikali kosopana nga nazangi mon trésor
Nazongeli nzela nalekaki po naluka bolingo
nzoka moleki ya nzela asili ko kende nango
Nazongeli nzela nalekaki po naluka bolingo
Nzoka moleki ya nzela asili kolokot'ango

Nasengi na ndeko akutanaki na trésor na ngai eh
Azongisela ngai esika azuaki yango
Nasengi na ndeko akutanaki na diamant na ngai eh
Azongisela ngai esika azuaki yango (ekipaka té, Kiki de Panama eh, eh)
Kota boloko pona parcours, un jour liberté ekozonga
Soki ozangi moto olingi, okoti boloko à perpétuité eh-eh-eh
Kota boloko po na yé, po un jour liberté ekozonga
Soki ozangi moto olingi okoti boloko à perpétuité

Dédicaces...



Credits
Writer(s): Koffi Olomide, Maika Kashal Munan
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link