Nzete ya séquoia

Jules Mansua oyebi ndengé nazalaki
Mwasi kitoko, santé nzeté ya sequoia
Band'okendé santé na nga elanda yo
Na tikala kaka poso, papa
Naba ndambu'a-ndambu'a souvenir etikalaki, na sangisi pé nasali na ngo ngomba
Mokolo mosusu na mati likolo pé na moni kutu ndengé ngayi na yo tobandaki
Mokolo yango omoni nga na nzela, obengi nga
Na telemi, to talani, courant eleki
Et c'est vrai que na ngambo ya ebalé ya Mansua, olingi ko faire croire nga que mayi ezalité
Kotangisa litanga moko na motema oyo etondisa bolingo ya nga na yo, ooh

Bayé ba kanisaka bolingo, ekoki ndé ko pesama ofelé
Ba yebisela nga Jules Mansua, pourquoi y'akopima ya nga ya yé tous le jour

Soki mpasi ezali masuw'oyo moto nionso ako butaka, wapi libongo na ngo
Bayé ba lonaki bolingo ya nga na yo na désert po ekola té
Lelo ebongwana arbre de Ténéré
Un jour soki bolingo na yo etikali eluka nga na lembolaka sani ya bolingo, oh
Un jour soki bolingo na yo etikali eluka nga na lembolaka sani ya bolingo, oh

Mama ayebisaki nga esika bako sessa niama, moto nionso ako zwaka moké
Soki ngayi molili nani'ango akomi mwinda ya vie na yo, oyo atalisi yo nzela y'avenir
Bayé ba banzaki que nasi na zinda na mayi bayeba eté, nazali ko tetwa kaka

Maika Munan, mukubwa
Betela nga seben oy'a pokwa kô, beau-fils ayoka elengi
Oka!

Bonganya, eh!
Riva Kalimazi
Zolosi, eeeh
Michel Kabeya
Mont Fort na Lubumbashi
Ba benga niama na nima na kombo na yé
Na libota papa azalaka obè moko, eeeh
Oyoki, ooh

Jean Richard Dain
Tonton Niema
Freddy Akaya
Ya Djo, ta batissimo
Na yo pé vraiment otiki nga na tela mbola na libanda
Alube Lumbila yo na Bobo, bo yebisa nga n'Ekumani abondel'omona yé kô
Bayé ba kanisaka bolingo Elou eh, ekoki ndé ko pesama ofelé
Ba yebisela nga Jules Mansua, pourquoi y'akopima ya nga ya yé tous les jours
Bayé ba kanisaka bolingo chérie eh, oh-oh, ekoki ndé ko pesama ofelé
Ba yebisela nga Jules Mansua, pourquoi y'akopima ya nga ya yé tous les jours



Credits
Writer(s): Maika Munan, Wembadio Shungu
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link