Yo Nzambe Na Nguya (1)

Ozali Nzambe, Nzambe na nguya nioso
Likolo ne nse bikelami na yo
Nguya na yo efandi na kembo na yo
Na bosantu bua yo, mpe na bonkumu bua yo
Mitunguisi nionso ya bomoyi na nga
Ekomaka kimia tango na za nayo oo
Yo kitisaka moto netumbelo oo
Bo banguna na yo bakufa na nsoni

Nzambe na nguya ee
Kumisama Yawe, Nzambe na nguya,
Kumisama Yawe
Na yembeli yo Papa malamu uu
Kumisama Yawe, Nzambe na nguya,
Kumisama Yawe

Ozali Nzambe, oyo apona nga a
Mobundi molongi, ya bitumba na nga
Yo nde opangusaka, pisoli na miso
Na mitema oyo mizali kolela
O niata satana a, kuna na Golgotha
Mpo mapinga na yo, ba zala na elonga
Nguya na ya, emonani na miso
Bato ba kobika pona kombo na yo

Nzambe na nguya ee
Kumisama Yawe, Nzambe na nguya,
Kumisama Yawe
Na yembeli yo Papa malamu uu
Kumisama Yawe, Nzambe na nguya,
Kumisama Yawe

(2 fois):
Kumama Yawe, Kumama Yawe
Kumama Nzambe na nguya, kumama Yawe

Solo 1:
Okabola mayi na ebale, Papa yo bonguani te
Ata na kati na moto, na yebi na kolonga
Okatisa mabota na nguya ya loboko na yo
Yo nde Nzambe na Mose, okosaka te oo

Solo 2:
Nani akoki kosunga lokala yo mosantu
Yo nde Nkolo na bomoyi, otonda nguya
Osekuisa Masiya na nguya ya loboko na yo
Ata na kufi lelo oyo, na yebi na kosekua
Fololo ya bolingo, naye kobonzela yo
Yo nde osimbi mitema, ozali Nzambe



Credits
Writer(s): 0, Katoto Antoine
Lyrics powered by www.musixmatch.com

Link